Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:8 - Mokanda na Bomoi

8 Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:8
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bavandi nyonso ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo nyonso oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,


Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »


Pamba te tango batangaki bato, bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi azalaki wana.


Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !


Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.


Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ