Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:7
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »


Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › »


Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »


Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame ; balobaki : « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele.


Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.


Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ