Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame ; balobaki : « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:6
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abineri abelelaki na Joabi : — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso ? Oyebi te ete ekosuka mabe ? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango ?


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele.


Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye.


Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ