Bilombe 21:5 - Mokanda na Bomoi5 Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.
Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.