Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:4 - Mokanda na Bomoi

4 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo ; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.


Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani.


Nakozonga epai na Ngai kino tango bakososola mabe na bango mpe bakoluka elongi na Ngai ; kati na pasi, bakoluka Ngai makasi.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango,


Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.


Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? »


Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.


Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ