Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo ? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te ? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo !
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?