Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe ; akelaki bango mobali mpe mwasi.


Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.


Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu : « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.


Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.


Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »


Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso.


Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › »


Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ