Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:2
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezawu alobaki na tata na ye : — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.


Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.


Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? »


Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.


Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ