16 Bakambi ya lisanga balobaki : « Tokosala ndenge nini mpo na kozwa basi ya kopesa na libala mpo na mibali oyo batikali, pamba te basi ya libota ya Benjame basili kokufa ? »
Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele.
Balobaki lisusu : « Bato ya libota ya Benjame oyo batikali basengeli kozala na bakitani na bango, mpo ete ekolo elimwa te kati na Isalaele.