Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
Ndambo kati na bango bakimaki na nzela ya esobe, na ngambo ya libanga monene ya Rimoni. Na nzela, bana ya Isalaele babomaki bato nkoto mitano oyo balokotaki na nzela. Balandaki bango lisusu kino na Gideomi mpe babomaki mibali nkoto mibale.
Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.
Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso.