Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 21:12
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

asundolaki Mongombo ya Silo, ndako ya kapo oyo atelemisaki kati na bato,


Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? Yawe azongiselaki bango : — Bokende kobundisa bango.


Tala makambo oyo bokosala : ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › »


Lisanga mobimba etindaki sango ya kimia epai ya bato ya libota ya Benjame, oyo bazalaki na libanga monene ya Rimoni.


Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ