11 Tala makambo oyo bokosala : ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › »
Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso.
Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te.
Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana.