Bilombe 20:9 - Mokanda na Bomoi9 Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »