Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.
Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »
Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye.