Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 20:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 20:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.


Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya, mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.


Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.


Lolendo na bino ezali kitoko te ! Boyebi te ete mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya mapa ?


Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te.


Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki : « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »


Bato nyonso batelemaki lokola moto moko mpe balobaki : « Moto moko te kati na biso akozonga na ndako na ye ya kapo to na ndako na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ