Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.
Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai ; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki.