32 Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea.
Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso ; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea.
Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea.
Tango bana ya Isalaele bamonaki lipata wana ya milinga, bapesaki mokongo na bitumba. Kasi mibali ya Benjame babandaki kobeta mpe koboma bana ya Isalaele pene tuku misato. Bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso.