Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe ; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga.
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?
Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino ? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino ?