20 Mibali ya Isalaele babimaki mpo na kobundisa bato ya libota ya Benjame mpe bamibongisaki mpo na kobundisa bango na Gibea.
Na tongo oyo elandaki, bana ya Isalaele bakendeki mpe batongaki molako na bango pembeni ya Gibea.
Bato ya libota ya Benjame babimaki na Gibea mpe babomaki, mokolo wana, mibali ya Isalaele nkoto tuku mibale na mibale.