Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 20:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi alobaki : — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ?


Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.


Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.


lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.


Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.


Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.


Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.


Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki.


Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ