Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 20:17 - Mokanda na Bomoi

17 Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 20:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda.


bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.


Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.


Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko.


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga.


Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso.


Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.


Boye Saulo abengisaki basoda, mpe atangaki bango na Telayimi : basoda oyo babundaka na makolo, nkoto nkama mibale ; mpe basoda oyo bawutaki na Yuda, nkoto zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ