Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 20:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 20:16
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo : ekolo ya Benjame.


Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga.


Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.


Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.


Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.


Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ