Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo : liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele ; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki.
Azongiselaki bango lisusu : — Bokoki kolekela awa te. Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele.
Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye ; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi.
Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele.
Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.