Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 20:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 20:10
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.


esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »


Boye, mibali nyonso ya Isalaele basanganaki esika moko mpe bayokanaki lokola moto moko mpo na kobundisa engumba Gibea.


Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni.


Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa.


Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ