Bilombe 20:1 - Mokanda na Bomoi1 Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.