7 Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi.
Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.
Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;
Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi.
Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.