Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. »
Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.
Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa.
Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ;
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.