Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 2:21 - Mokanda na Bomoi

21 Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 2:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.


boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.


Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste.


Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.


Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ?


Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »


Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana.


Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ