7 Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.
Mokonzi azongisaki : — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.
Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »
Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko.