Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:6 - Mokanda na Bomoi

6 Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:6
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye : — Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te ? Lamuka ! Lia mpe sepela ! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli.


Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.


vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.


Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.


Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango,


Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango.


Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »


Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.


Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana.


Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ