Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.
mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye ; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye.
Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. »