Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:23 - Mokanda na Bomoi

23 Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:23
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.


Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.


Tamari alobaki na ye : — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te.


esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »


Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ