Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mobange yango alobaki : — Tika ete kimia ezala na yo ! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki : « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani ; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo ! »


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.


Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.


Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.


Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.


Kasi Yawe alobaki na ye : — Zala na kimia ! Kobanga te.


Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ