Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:18 - Mokanda na Bomoi

18 Moto ya mobembo azongiselaki ye : — Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:18
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,


Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.


Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda.


Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo.


Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye : — Okeyi wapi mpe owuti wapi ?


Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo ; tozangi eloko moko te.


Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. »


Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? Yawe azongisaki : — Yuda akokende liboso.


Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.


Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ