Baleki kati na bangomba mpe balobi : « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.
Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.