Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nkolo azongiselaki ye : — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali ; tokokoma kino na Gibea.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baleki kati na bangomba mpe balobi : « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.


Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.


Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye : — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu.


Alobaki lisusu na mosali na ye : — Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo ; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama.


Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye.


Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ