Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 19:10 - Mokanda na Bomoi

10 Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu ; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 19:10
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te.


Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.


Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi.


Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.


Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto.


Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ