Bilombe 19:1 - Mokanda na Bomoi1 Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo.