Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nganga-nzambe azongiselaki bango : — Bokende na kimia, Yawe andimi mobembo na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga ; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »


Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Mishe azongisaki : — Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,


Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye : — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. Jetro ozongisaki : — Kende na kimia !


« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.


Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.


Sik’oyo, tika ete Ye moko Nzambe, Tata na biso, mpe Yesu, Nkolo na biso, bafungolela biso nzela ya koya epai na bino.


Balobaki na ye : — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.


Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te.


Eli azongisaki : — Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ