Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Elenge mobali ayebisaki bango : — Tala makambo oyo Mika asali mpo na ngai : Azwi ngai na mosala mpe akomisi ngai nganga-nzambe na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kopona bilongi ezalaka malamu te ; nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.


Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.


Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.


molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,


Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.


Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye.


Tango bakomaki pembeni ya ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali Molevi. Babalukaki epai ye azalaki mpe balobaki na ye : — Nani amemaki yo awa ? Ozali kosala nini na esika oyo ? Mpo na nini ozali awa ?


Balobaki na ye : — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ