Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:31
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.


Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele.


Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.


Moto ya mobembo azongiselaki ye : — Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye.


Bongo balobaki : « Tala, feti moko ya Yawe ezalaka mibu nyonso, kati na Silo oyo ezali na ngambo ya nor ya Beteli mpe na ngambo ya este ya nzela oyo ekenda longwa na Beteli kino na Sishemi, mpe na ngambo ya sude ya Lebona. »


mpe botala malamu. Tango bokomona bana basi ya Silo babimi mpo na kobina, bobimela bango wuta na bilanga ya vino, mpe moko na moko kati na bino akanga mwasi moko kati na bana ya Silo mpe azonga na ye na mokili ya Benjame.


Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ