Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:27 - Mokanda na Bomoi

27 Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye. Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu ; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:27
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.


Mpo na Dani, alobaki : « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »


Babomaki moto nyonso oyo azalaki kuna na mopanga. Babebisaki penza bango nyonso, babikisaki ata ekelamu moko te ya pema mpe batumbaki engumba Atsori.


Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.


Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele.


Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye.


Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te.


Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ