25 Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye : — Tika ete mongongo na yo eyokana te kati na biso, noki te bato ya kanda bakokweyela yo mpe bakoboma yo elongo na libota na yo mobimba.
Bongo Ushayi abakisaki : — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.