Bilombe 18:17 - Mokanda na Bomoi17 Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. » Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu.