Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:13
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.


Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.


Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Mika. »


Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani  ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.


Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »


Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ