Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 18:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani  ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 18:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi.


Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi).


Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi.


Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.


Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli.


Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika.


Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »


Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ