Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 17:6 - Mokanda na Bomoi

6 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 17:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi :


Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,


Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.


Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.


Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.


Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.


Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo : moto nyonso azali kosala ndenge alingi.


Azalaki mokonzi ya Yeshuruni tango bakambi ya bato basanganaki elongo na mabota ya Isalaele.


Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele.


Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.


Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala makambo oyo azalaki komona ete ezali malamu.


Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ