Bilombe 17:5 - Mokanda na Bomoi5 Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba.
Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.
Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu.