Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 17:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 17:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! »


Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, akomaka elilingi na ekomeli ya motane, asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, abongisaka mondelo na yango na lime mpe apesaka yango lolenge ya moto, ndenge kaka moto azalaka kitoko, mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.


Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango ? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini ? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki : — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.


Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.


Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ