Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 17:3 - Mokanda na Bomoi

3 Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki : — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 17:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atiaki kati na Tempelo ya Yawe nzambe ya ekeko oyo asalisaki ; nzokande, Nzambe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.


Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai.


Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.


Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; bokobwaka yango mosika ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! »


Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »


Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !


Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.


Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu.


Balobaki na ye : — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ